Límbísá, eza ebandeli…. Kobandela na nini?

Door Dagmar Dirkx, Hugues Makaba Ntoto, op Wed Nov 18 2020 20:00:00 GMT+0000

Soki mokonzi ya mboka na letá bakangi minoko na bango, bayi mboka nde bakoloba na esika na bango. Na mbula 2019, momekano ya kokoma babengi 'Sorry', yango nde efungólí nzela ya boluki ndenge ya malamu, pona ba-belge, ya kosenga bolimbisi na oyo bango basálá na eleko ya 'colonisation'. Kasi bolimbisi ya ndenge oyo, ezali penza bolimbisi ya solo solo ? Molóngi momekano Dagmar Dirkx nâ rekto:verso mobimisi ya babúku Hugues Makaba Ntoto, bango bakomi mokanda na ngonga na bango pona kotélemela makambo ya bosengi bolimbisi yango.

Na bana nyonso ya Congo, ya Rwanda pe ya Burundi na bisika nyonso bozwami na ba mboka na bino to pe na Belgique

'Nani yango akoki kobosana makambo ndenge ye moko alingi?' Motuna oyo ezali na kati maloba elobami na film Aphasia oyo ebimaki na 2019 pe esalami na Jelena Jureša, mosali ntóki (artiste) ya mboka Serbie. 'Aphasia' ezali bokono oyo ekotisaka mokoni na pasi makasi ya koyeba lisusu te kobimisa maloba oyo ye azali na yango, po bongo na ye ezosala lisusu malamu te. Moto oyo azali na bokono ya 'Aphasia' akomaka na likukuma pe maloba oyo ezobima na monoko na ye ezalaka lisusu penza na nzela te. Ata tango tokotaka na mozindo ya maye tosala na eleko ya 'colonisation belge' pe toluka ndenge oyo elongombani pona kosenga bolimbisi na nyonso ya mabe tosala, emonani ete tokokaka obele kokukuma. Nakolandaka maloba ya Jelena Jureša na film na ye 'Aphasia' ba belge, biso nyonso lisangá, tobelaka bokono ya 'Aphasia' na tango ya kolobela maye tosálá, na kala, na eleko ya 'colonisation'.

Tii na mokolo ya lelo, ba mbala nyonso tolingaka kosenga bolimbisi ezalaka penza bolimbisi ya polele polele te. Letá ya Belgique esala makambo pona kokanisa milimo ya mwa ndambo ya bato oyo bamona pasi na eleko yango, na esika tè ásénga bolimbisi na bana mboka bango nyonso lisanga. Esika babengi 'Patrice Lumumba' na Ixelles (Bruxelles), ezwá mbano ya lokumu te ndenge esengeli na yango. Na bitando esika bapésá bolimboli ya tina ya bikeko ya eleko ya 'colonisation', bakomá makambo na mwa bokeseni moke pe ebéndaka miso ya bato penza penza te. Soki otálí ngambo ya 'AfricaMuseum ya engumba ya Tervuren', oyo bawuti kozongisa yango sika, mikanda na bango esika bakoma maye maleka kala ezalaka bobele ya koyebisa ete 'oyo ezali ya solo' to 'oyo ezali ya solo te'. Tokangi minoko na biso: na babolimbisi tosengaka tokendeke mosika te kaka likukuma pe kobetabeta monoko. Tolobaka tango nyonso ete tobosani: kasi tobosanaka kaka po biso tozali na makoki ya kobosana ndenge biso moko tolingi. Atako kabákátá ya lisangó ya makambo biso ba belge tosálá na eleko ya colonisation ezali kilo, toyebi pasi ya mokolo na mokolo te ya ba potá oyo lisitoile etiká. Kasi ba oyo bakangá minoko na bango pe ba oyo babósáná na bolingi na bango, mokolo ezali bakobómbola bilímá na bango bango moko.

Nazali na esengo po na mobú 2014, atako nalingaki ésila kosalema kala kala, nayaki kokoka kokota na masolo na bilíma yango. Mwa ndambo ya basali ntóki (artistes), ya bato ya makita minéne (conférenciers) pe ya bato bayébaka maye maleká kala (historiens); bato oyo nyonso bafungolaki ngai miso (bafungolaki pe miso ya bato mosusu). Yango nde esalaki ete na kati ya bikeko ya tango ya colonisation, bikeko oyo batiá na Bruxelles pe na bingumba mosusu, toyaki mbala moko kokitola bilílí pe bilongi ya baye bazali penza babomi ya ebelé ya bato. Toyaki bongo kososola ete na elílí ya 'zwarte Piet' (dongolomiso ya mwindo oyo mosalisi ya Saint-Nicolas alátaka) ezali nde bozongisi momesano na bango ya kala; momesano ya kolandela na mokolo ya lelo, bayóka ata soni te, bowumbu ya tango ya bokonzi ya colonisation. Toyaki kososola boni boni na tango ya bitumba ya yambo ya molongo mobimba mampinga ebelé ya ba soda ya Congo bazwaki mitindo ya kosala misala ya somo; pona biso kutu bitumba yango ezalaki bitumba ya molongo mobimba te kasi ezali nde bitumba ya mikili ya Pótó bango na bango. Toyokaki pe toyebi sikawa ete na bitumba yango motángo monéne ya basoda ya Congo bakúfáká; bawá wana nyonso bazali bawá ya kotiá na moto pe na motema Leopold II pe na moto ya letá ya Belgique. Tokamwákí makasi tango toyokaki ete Belgique etindaki bato na ye po bakende koluka koyeba maye malekáká na liwá ya Patrice Lumumba. Totungisamaki makasi pe tozangaki maloba tango toyaki kososola ete bomengo oyo nyonso tozali na yango epai na biso ewutá solo na maye tosílá koyiba na mibú ebele na mboka na bino; tosílá koyiba bino motáko (cuivre), wólo (or), mótópe (caoutchouc). Pona na minióko pe bapasi nyonso biso tokótísá na yango pe tolukélá bino na ba mboka na bino tokomí mokandá oyo pona kosénga bino bolímbisi.

De Congolese leider Patrice Lumumba in Brussel door Harry Pot / Anefo

Elekí mwa bileko, moko ya bakonzi ya 'Musée' alobáká na ngai boye: 'Nazoyoka motema pasi pona mbilingambilinga oyo ngai na baninga na ngai totíká sima na biso epai na bino.' Maloba na ye oyo ezalaki mingimingi pona kolobela makambo etali pasi ya 'climat', mombongo ya buzoba pe mboka moko epai wapi bato ya ndenge na ndenge (…), babola koleka ye, bákoma kozwa lelo makoki ndenge moko na ye: mondélé, moto ya mbongo, mobali pe moko ya bayángeli makambo. Bolimbisi aséngákí , ngai namonaki yango pasi po éndimama. Eloko moko te na maloba na ye ebétísákí ngai motema pona koloba ete ye, na mbula 2019, azali kosala ata likambo moko oyo elakisi ete andimi te boyangeli oyo ekótísá bato mosusu na bobola, basusu nde na bomengo na mitó ya bato.

Na ndenge wana kaka, ezali lelo pasi makasi kondima bilimbisi oyo ezosengama pona mbébá esálámá na eleko ya 'colonisation' na tango ete mbébá yango ezali kopesa pasi tii na mokolo ya lelo. (Nakati ya biloko ya bomengo na biso bayíbá tokoki lelo kabakisa 'coltan'). 'Désolé' na biso oyo tozoloba lelo ezali nde ebandeli. Ezali maloba oyo tokoki kotala yango lokola nde mikano. Kobanda lelo tokomeka kovota pona masangá ya politiki oyo bazali komímona lisusu te lokola 'bayángeli ya mokili' pe bazali kondima ete mboka nyonso na mokili ezali na bonsómí na yango. Kobanda lelo tokotálela na mozindó maye maleká na 'eleko ya colonisation' pona kokótisa yango na matéya ya bakelási na biso pe na misálá ya bopanzi basango ya mboka na biso; nyonso wana na kosolóláká na bino. Kobanda lelo tokokóta na masoló na bino pona kotála boni boni lísitoile na biso ekoki kolimbolama, kolobelama pe kotálama na ba ndenge nyonso ya kokanisela pe ya komonela makambo; boni boni tokoki kobongisa esika bato bazwámí na tina ya kosololela bango lisitoile yango na ndenge ya malamu pe ya lokutá te; kotala boni boni ba mboka na biso ekoki kosungana.

Balútu (cicatrices) oyo minióko ya ba belge etíká na Congo, na Rwanda pe na Burundi ekolímwáká soki moke te. Kasi kobanda lelo tokomeka malembe malembe koluka kokanga bapótá biso nyonso elongo; tozali na kondima ete tokolonga. Tokosala yango te na komípésáka bolingi ya kobósana makambo kasi nakotósáká bolingi ya kokundola pe ya kokóta biso nyonso elongo na loléngé ya sika ya komonela maye makoya sima.

Na bosémbo nyonso toséngí bino bolímbisi

Pe tosálí yango na kombo ya ba belge nyonso


Bolimbisi ekozala te soki masoló eza té

Dagmar Dirkx

Bobángi nazalaki na yango eh te boséngi bolimbisi ya ba-belge bango nyonso lisanga ésálama to pe ésálama té, bobángi wáná yango nde etíndákí ngai násála momekano babéngí ‘Désolé est un début’ (Koloba ‘Límbísá ngai ezali ebandeli’), momekano oyo esálámákí na mbula 2019. Mokanda na ngai ezalakí na kati ya mikanda mítáno oyo endimámákí na bazuzi ya momekano yango; na kati ya bazuzi wana tozalaki na bato bapanganisaka bato, bakomi ya ba-búku, bato bayekolaka maye maleká kala pe basali ya ntóki (artistes). Bato ya Belgique (ba-belge) bakokaki bongo kosénga bolimbisi oyo basepelaka kosenga pe baséngákí bolimbisi yango na botúnáká bato mitúná na na nzelá ya 'internet'. Súkasúka ezali mokanda oyo ekomámákí na Bregje van Bockstaele nde elóngákí; mokanda oyo na pe mikanda nyonso bapésákí yango na 'Ambassade' ya mboka Congo. Bato oyo basálísákí mokano yango balimbólákí nguya na bango boye: ‘Lokola tozali mboka, tango ekoki tóndima maye tosálá na kala na eleko ya colonisation pe oyo mokonzi ya mboka na biso asálá tó asálá te; tosálá yango na ndenge eh te tozali biso nyonso bana ya mboka belgique lisangá. Mawa mingi, ezali ebandeli.’ Nzokandé ezali komonana lokola eh te ‘Limbísá’ eza mingmingi ebandeli. Atá ndéngé babélélákí momekano yango na kogángáká na ba radio, na ba-journal to pe na ba-télévision, ndéngé bavándákí niê na sima ekámwísákí makási penzá.

Atá ndéngé babélélákí momekano yango na kogángáká na ba radio, na ba-journal to pe na ba-télévision, ndéngé bavándákí niê na sima ekámwísákí makási penzá.

Nzokandé ndéngé balakákí eh te masoló ekosálama na ndéngé ya kolobana poélépolélé, yangó ndé epúsákí ngai nákóta na masoló yangó: Likanisi yango ezalaki penza koléndisa: komóna pe koyóka ebelé ya bato bakomí mikanda ya ndenge na ndenge pona kosénga bolímbisi likolo ya maye ya mabé pe ya pasi letá na bango (ba-belge) asálá. Ndé na bindimandima na ngai, nazalaki kobánza eh te ndéngé momekano to lisano ezalaki kokóba, molukano ekokóta pe ekovánda; kasi lisano ezalaki lisano moko ya bóngóbóngó kaka pe basani bazalákí na libakú atá te ya kokóta na lisoló bango na bango. Na ndenge wana lisano to momekano yango ebúngísákí kómbó oyo yango moko emípésákí. Límbísá, ezali ebandeli …. Kobandela na níni?

Tozalí banáni?

Elóko esálákí pasi na momekano to lisano ‘Limbisa ezali ebandeli’ ezali eh te basani bazalaki mingi te. Kaka bato 177 (kámá mókó na túkú sambo na sambo) nde batindaki mikanda. Pe ata soki motango ya bato ezalaki moke boye, likambo ya sómo eza eh te baye basálísákí momekano yango báloba ‘Límbísá’ na ba-congolais (bakongomani) banso. Likoló na yango, eza nango likambo ya kokámwa penza te, masolo yango élekákí pe malamu penza te pona bato ebelé. Bato baye basalisaki momekano to lisano yango batóngámákí mingi na lisangá ya bato na nzela ya internet. ‘Kaka biloko oyo ekoki kondimama na politiki’, yango nde litóngí oyo eyónákí mingi. Pona nini ngai násénga bolimbisi pona likambo oyo Leopold II asálá? Oyo ezali maloba moko ya basani akomákí.

Oyo nyonso elobámí pe matóngí nyónso bato bapésí, elakísi eh te makambo eza lisusu ebelé oyo esengélí bato báyéba. Koloba ‘Límbísá’ na kombo ya ba-belge nyonso lisangá ekoki kosálama kaka soki mitéma ya ba-belge ebelé koleka ezali koswá pona maye ya mabé basálá na eleko ya colonisation. Maloba ebelé oyo elobamaka pona kosenga bolimbisi (maloba yango) ezali lokola nde mbélá oyo letá ezali kotíndela libota ya Roi (mokonzi ya letá) Bómípésa na mosálá ya liyébani oyo ezalaki kosálama. Bókóta na masoló. Bósénga bolímbisi, kasi bolimbisi yango ézala likambo ya kosúkisa makambo te.

Bó moto ya Rwanda pe avándaka na mboka Belgique, alobákí na ngai eh te mokandá na ngai eningísákí na kati na yé pé abóngólísákí yango na monoko ya mboka na bango pona fami na ye oyo ezali na Rwanda.

Lokóla makambo oyo ekoki kosila na ndenge ya libéla te, epésákí ngai nzela to libákú ya kotánga lisusu mokandá nan gai. Na yangó nakendékí kobómbola makambu ebelé oyo na mokolo ya lelo nakokí kosakola yango na ndenge mosúsu. Mikáno oyo balimbóláki sima ya le 26/5/2019 (mokolo ya tuku mibale na motóbá ya sánzá ya mítáno ya mbúla 2019) ezalaki lokola bololo pona kondima yango, pó ba-Flamand baponákí bábimisa polélé maloba ya makasi ya kobóndela pé kosepelísa kaka obelé bango moko. Bóngó kobanda wana nayákí kososola eh te makanisi nazalaki na yango ya kokoma ‘Bísó’ na mokandá na ngai ezalaki lisusu te nzela ya koluka lisangá na ndéngé ya sóló. Na momekano tosálákí, baséngákí biso: tókoma mokanda na kombo ya ba-belge bango nyonso lisangá. Kasi mawa pona ngai, nalandákí etíndá oyo na ndenge esengélákí penzá. Nakomákí mokandá na ngai ndenge ngai moko nakanisákí kosala yango pé nakabólákí makanisi wana na lisangá ya bana mboka bango banso na tina eh te éndimama na malembe, na pasi te.

Na mokandá na ngai ‘Bísó’ yangó ezalí náni?

Sókí olíngí ókoma mokandá na makambo etálí bolímbisi oyo esengélí básenga pona mibú to bambula nyonso ya boyángeli ya eleko ya colonisation, okokoma yango na mayéle pe na ndenge nini? Kala te natángákí mitúná pé biyano esálámákí na mbula 2005 na Marjane Satrapi (moto ya mboka Iran) oyo ayébáná mingi pona búku ya kobéta masoló abéngákí yango ‘Graphique Persepolis’, ebímákí na etando monéne ya kopanza basango, etando oyo ezwámí na mboka ya Amerika pe babéngí yango ‘Salon’. Masoló na bango etálákí mbílingambilinga oyo ezali na ndéngé ya kotálela makambo na ndenge ya moto yé moko to na ndenge ya politiki; masolo etálákí pé mokangano kati ya mbóka Iran na mbóka Amerika. Eyano ya Satrapi ezalaki boye:

‘Mokili eza ya kokabwana kati ya Esti na westi. Bino bozali bana ya Amerika, ngai moto ya Iran, toyébání te kasi tozolobana pe tozóyókana malamu malamu. Bokeseni kati ya ngai na letá na ngai eleki monéne ke oyo ezali kati ya ngai na bino. Pe ba-letá na biso (ya bino na ya biso) ekómí kokokana malembe malembe.’

Bokabwani kati ya letá na bana mboka: lokóla pe bokabwani oyo totiáka kati ya biso na eleko ya colonisation, okoki kolimbola yango na pasi oyo ezali pona kosénga bolimbisi ya bana mboka bango nyonso lisanga. Na mokolo ya lelo makambo ezomonana lokola eh te colonisation na makambo na yango esáláká na ndéngé eh te bana mboka ba-belge ya tango wana, bango bazalaki koyéba atá moké te nyonso ezalaki kosalama. Nzokandé na ndéngé ya koyángela makambo na eleko ya colonisation ezalaki nde ya kosangisa ba-belge bango nyonso, kobanda na mínganga, basángó, balakisi na bakambi ya biteyelo, bato ya mombóngo tii kosukisa na ba ministers. Makomí ebelé ebimákí pona kolakisa pasi ezali pona kobimisa botáli ya moto, ya politiki to ya bato nyonso lisanga. Nyonso ezolakisa pasi makasi ezali pona kozwa ndéngé ya malamu ya kobétela masoló pé kokangisa pe kokomisa bolimbisi baséngaka.

Lisoló ya bato mibalé

Na káti ya maloba Satrapi alobá, mókó esepélísí ngai koleka maloba oyo ezólobela mosíká ezali kolongwa mbóka na yo tii mboka na ngai. ‘Yó ozalí moto ya Amerika, ngai nazali moto ya Iran. Toyébání te kasi tozólobana nanu awa pe sokoyo pe tozóyókana malamu-malamu.’ Sima ya ko-míkotisa na misalá wana, nazwákí eyano ewútákí epai moto avándí penepene ya baboti na ngai. Bó moto ya Rwanda pe avándaka na mboka Belgique, alobákí na ngai eh te mokandá na ngai eningísákí ye na kati na yé pé abóngólísákí yango na monoko ya mboka na bango pona fami na ye oyo ezali na Rwanda. Na eyano na yé nasosólákí makambo míbalé. Libosó libosó, esengélí tóyéba eh te kosénga bolímbisi ekokí penzá kofungola nzelá ya kondima: mabé ebelé esálámá na eleko ya colonisation, bato bazóká bapótá pe pási ezalí penzá. Kondima elingí koloba té eh te pási ya bapótá elembí, elingí pe koloba té eh te bobíki ekótí. Toyébi pe te sókí mokandá se mókó ekokí kokoka pona kolembisa pási to pona kokótisa bobíki. Kasi sókí natálí eyano ya moto wana, nakokí koloba eh te mokandá mókó ekokí koléndisa bato pó bakóta lisúsu na masoló, masoló epai wapi ngai na moníngá na ngai tokokí kolobana pé koyókona malamu-malamu atako mókó mókó na biso tokotálela makambo ndenge mókó te.

Na ndéngé níni yangó okokí kotálisa makambo na bikomá na yo tángo epésámélí yo ókoma póna maye matálí kosénga bolímbisi póna bambúla ebelé ya boúmbu na eleko ya colonisation?

Na mozindó ya makanisi na ngai, ‘bísó’, ndéngé nakomákí na mokanda na ngai, elingí koloba nde lisangá ya ba-belge nyonso ná letá pé na bana mboka oyo bayébí likambo na maye maleká kala, na ndéngé eh te báfungola masoló na boséngáká bongo bolímbísi bango nyonso lisángá. Kasi ézala bongo ngámbo míbalé. Oyo ya Rwanda ngai nayébí ememí ngai na likambo mókó oyo nalobélákí yango mingi te na mokanda na ngai: bóní bóní moto oyo batíndélí mokanda azómónela makambo. Okokí kokóta na mozindó pona kotála maye maleká kala, sókí okótí na masoló te na bato oyo tiii lelo oyo na bomoyi na bango bamónaka pási likolo ya maye maleká na eleko ya colonisation, ozali ko-míkósa. Na yango nakanisi eh te elingáká kozala malamu nákútana nokí na moto oyo avándaka penepene ya baboti na ngai, kasi nasálá yango kaka te. Naséngí bolímbisi: nazóyá.


Esálí ngai pási, límbísá!

Wáná ezalí (kaka) maloba

Hugues Makaba Ntoto

Ndéngé níni okokí kosénga bolímbisi pona maye mboka na yo mókó esálá na eleko ya Colonisation? Eyano ná motúna oyo ezalí pási penza kútu eyano yango ezalí te; pe koluka kopésa eyano na motúná yangó ezalí likambo ya koluka kosála té. Bonéne ya bozángi bosémbo pe ya mabé makási basálá na mboka Congo, na eleko oyo mboka yango ezalákí na boyángeli na bangó ba belge pe eleko ezalákí mabelé ya Leopold II, (bonéne yangó) ezósénga bámítála malámu bangó mókó, bámíkitisa pe báyóka bángó mókó pasi na mitéma na bangó likoló ya mabé basálá. Ndenge ya komíma na mabé na bangó oyo eséngí eh te básembola. Kasi bosémboli ekozala na tína atá moké te sókí esalámí káka na tína ya kozipa ngambo bamemá pe sóní na bangó nyonso lisángá.

Sókí kozala na makanisi ya malámu ezá na tína penzá té na miso ya báto oyo bazwá pási likoló ya mabé esálámá na eleko ya colonisation, elingí koloba eh te pona bato yangó baye bamemá ngambo na makambo wáná, esengélí koyéba pe komóna bangó polélé polélé. Koloba tó pé kokoma eh te kosénga bolímbisi na baye bamóná pási ezalí nde libonza pona bangó, wáná ezalí na motó ya momemi ngambo tángó atié mabólóngó na yé na sé. Ezalí ndé esíká wáná ndé batié makanisi na bangó tango bazóloba loba eh te ‘Désolé est un début’ (Esálí ngai pási, límbísá ezalí ebandeli). Oyo balobaka Le Cher Homme du Congo (ndeko wa bolingo moto ya mboka Congo) ezali lokóla likambo basálelaka te, ezómónana lokóla kaka likanisi, kasi ndenge mosúsu kozánga loláká. Balongólí yangó lisúsu bomoto na yangó. Maloba ekokí sóló kobóngola mikili, lokóla 'Creative Belgium' bakomí yangó na ‘site internet’ na bangó etálí mimekano. Kasi maloba ekokí pé bongo kokótisa likanisi ya pámba na oyo etalí mbóngwáná tó misálá.

Masolo epái wápi kosénga bolímbisi na moto óyo basálí yé mabé (tó pé moto óyo bapésí yé pási) esálamaka káka na bobóto ya moto óyo asálí mabé sókí moto óyo atié mabólóngó na sé.

Mbélá lokóla ‘Límbísá ezalí nde ebandeli’ ekokí kosémbola makambo te ndéngé letá ya Belgique, yangó mókó,ekokí kosála yangó. Wáná ezalákí pé tína ya momekano ya kokoma te, pó momekano yangó ezalákí míngimíngi pona kozwa bikomele to ba bíki ya sóngé. Kasi mbélá babwákákí pona kobénga bakomi babúku to mikandá ezalákí ya pámba té: ebongísámákí na bonéne na káti ya makambu etálí bosílisi boyángeli ya colonisation, bosílisi yangó endimámákí míngi na miso ya bato, na ba mbúla oyo, lokóla likambo etálí bómoyi ya bato. Ebelé ya bato, bana mboka, tango bakundolaka maye maleká na tango ya colonisation, epésaka pási ná pé elíkiá, pé likambo yangó esengélí bátala yangó malámu malámu na esíká tè ésúka kaka na koloba pe kondima eh te yangó esálámákí sóló. Pona bana ya Congo, ‘Límbísá, esálí ngai máwa’ ekokí kozala te kaka obélé maloba ezángá eyano.

Sóló, kosénga bolímbísi pona misálá makási pé ya pási ya boyángeli oyo ba kóko basálá ezalí pona bakitani na bangó lokóla elanga epai bakundá bilóko oyo ekokí tango nyónso kopaswana páá. Yangó ezalí penzá na tína tó ezalí káka obélé alumoálo ya talatála oyo batié póna bolámu ya letá na bato ya politíki pó bangó bázala na mikakatano té na misálá na bangó? Yango ezalí penzá penzá makambo ezángá mbébá? Tokokí kondima eh te mikili ya pótó oyo bakonzá na eleko ya colonisation bazá leló oyo na tína ya kosenga bolímbisi te pó baye basálá makambo to ba mbébá bazalí lisúsu na bokonzi te. Na tango wáná pe kaka, bato oyo bazómóna makambo yangó na ndéngé mosúsu batálísí eh te bokonzi ya mikili ya pótó oyo basálá colonisation ná bokonzi ya baye bakonzámá ekokání te pé bokeseni ya sólósóló ezá penzá te káti na bokonzi nyónso míbalé.

Likambo mosúsu ya tína ezalí bóngó ya koyéba sókí bolímbisi ekokí kosála eh te boyókani ésálema. Makambo oyo esílá kosálema ekokí kopésa bato mayéle, ndakisa bolímbisi Louis Michel, oyo azaláká Ministele ya Belgique na makambo etáli bapaya, aséngáká na mbúla 2002 na ndéngé eh te Belgique éyébí likambo na liwá ya Patrice Lumumba. Aséngákí bolímbisi tango lingómbá ya ba ntómá ya bato ya mboka na yé batálísákí polélé na misálá na bangó eh te mboka na bangó Belgique ememá ngambo monéne pe eyébí malámu maye maleká na liwá ya Lumumba.

Maloba ya mokótisi pási

Bolímbisi ba belge baséngá eséngámákí pé ezalákí na ndéngé elongómbání té, ndéngé moluki ya mboka ‘Grande Brétagne’ Tom Bentley akomá yangó na búku na yé Colonial apologies and the problem of the transgressor speaking (2018). Tálá lokóla Michel, yé alobélákí polélépolélé te ndéngé basasákí Lumumba, nzokandé káka ndéngé mboka na yé Belgique ekangákí mabóko pé elobákí elóko té na koboma babómáká Lumumba, ba belge batálákí káka bolámu na bangó mókó. Bolímbisi na yé ezalákí póna ndéngé letá ya Belgique ekokákí té kobátela bomoto pé bomoyi ya moto ya politiki ya Afrika. Bolímbisi yangó ezalákí pé te póna kondima eh te koboma babómáká Lumumba ewútákí bongo na ndéngé eh te bangó bazalákí komímóna tango nyónso likoló ya bato nyónso pé póna bozángi botósi na bato ya poso mwindo. Lokóla pé na misálá na bangó ba ntómá ya bato ya mboka Belgique balúkákí káka kotála eleko ya 1960-1961, batíkákí bongo pembéni pé batálákí kúfa ya Lumumba té lokóla eh te yangó ewútákí bongó na káti ya makambo eleká na tángo ya colonisation.

Likambo mosúsu ya tína ezalí bóngó ya koyéba sókí bolímbisi ekokí kosála eh te boyókani ésálema.

Póna Bentley esengélí kososola bolímbisi yangó na káti káka ya ezalelí ya bakonzi ya colonisation ya komímóna lokóla batatá ya bato oyo bangó bazalákí kokonza pé na káti ya likanisi ya kitóko oyo bazalákí na yango ya komímóna lokóla bakonzi minéne ya mbóka oyo bazalákí kokamba. Sókí ososólí malámu bolímbisi ya Michel okomóna eh te yango pé ezalí káka na káti ya likanisi oyo: ezalí bongo letá ya baye basálá colonisation nde ezólobela letá ya baye bangó bazaláká kokonza. Bongó emónání malamu eh te baye basálá colonisation bakamátí makambo na ndenge eh te bangó bazá likoló pó bábongisa maloba na bangó ndenge bangó mókó balingí. Bentley amóní bongo malámumalámu ndéngé bato oyo babongísi makambo pé bazui nzelá ya kokangama na bolímbisi oyo eséngámí té na bato oyo bayóká pási, ezalí pé bongó nzelá ya komíbatela bangó mókó pé ya bosepeli. Okososola yangó sókí otálí ndéngé na bangó ya koséngela bolímbisi pé ya komóna makambo mosúsu pámba.

'Creative Belgium' esálá esíká bato basangisaka makanisi póna kotála ndéngé níni kopésa bolímbisi na maye maleká; bolímbisi oyo ekokání té na oyo ya letá ya Belgique. Kasi okokí kokokisa yangó na loléngé ya bolímbisi oyo Bentley atálísí na búku na yé. ‘Límbisá ezalí ebandeli’ ezalí nangó káka makeléle basálá pó bayébana pé makeléle yango etálí kilo ya makambo ya colonsation.

Atáko na káti ya mikandá okokúta maloba ya ‘Kolímbisa’, bakóló nangó ezalí ndé 'Creative Belgium' ná ndáko ya koyébisa makambo 'Happiness'. Bangó bato bakoyébisa loléngé pé mosálá (liloba etóndá límbísá) ya bolímbisi yangó; bangó bato bakotála pé tína ya mikandá oyo bakomélí moto oyo okokí komóna yé te pé akokí koloba elóko té.

Loléngé ya kobongisa maloba

Maloba oyo elobámí ezalí na tína ndenge mókó ná moto oyo azóloba makambo ná pé makambo nyónso oyo ná loléngé oyo maloba na yé ezalí kolobama. Kobanda likambo na makanisi ya malamu na tína ya kotúmbola moto mosúsu ekokí kobébisa pé (bobóto ya) moto mosúsu oyo. Moto ya bwániá ya filozofí oyo awútá na Latini-Amerika Linda Alcoff azólobela polélé polélé likambo yango na búku na yé The Problem of Speaking for Others (1991). Alcoff ayékolaka na mozindó níni yangó ‘Koloba’, na kómbó ya moto pé na moto mosúsu pé loléngé níni masoló ya motíndo oyo elekanaka. Bongó, azótálisa bóní bóní ezalí pási koloba na bato mosúsu na tango maloba na yó ezalí póna bangó té. Na makambo oyo míbalé moto oyo azalí na maloba akomítía bokítoli pona yé mókó pé póna bato mosúsu, nzokandé bokítoli wana nyónso ewútí bóngó obélé na ndéngé na yé mókó ya komónela makambo.

Lisano ‘Límbísá ezalí nde ebandeli’ ezá sóló penzá lokóla makeléle ya zándo, makeléle oyo bazósála káka póna kotódisa maloba óyo bamesáná kobimisa na makambo etálí colonisation.

Na káti wáná mikakatano ezá míbalé: sókí moto oyo azalí na maloba azalí moto monéne to té na káti ya mbóka, yangó ekomónana pé na bolimboli pé na bosóló ya maloba na yé mosúsu. Lisúsu, kozala na bisíká ya litómba monéne na kati ya mbóka ezalí likambo ya kobángisa pó yangó ezalí na káti ya bokonzi ya mbóka. Maloba oyo ezólobama ebóngwanaka na botáláká náni azóloba pé náni azólanda: makambo oyo nyónso etálí maloba, ndéngé Alcoff abéngaka yangó, ezalí makambo ya politiki pé efándá bongo malamu malamu na káti ya lisano epái wápi okokúta pé bokonzi ná bayángeli. Na likambo oyo ya ‘Límbísá’, 'Happiness' ná 'Creative Belgium' bakótí na káti ya mabína epái wápi baníngá ya lisáno oyo baponámí, bána ya mbóka Congo, bazá na esíká penzá te. Bóngó atáko makanisi ya malámu ezalí, likambo yangó nyónso ezósálema káka loléngé mókó ya boyángeli oyo ezótála moníngá mosúsu lokóla elóko pámba ezángá loláká.

Bolímbisi ya sóló sóló ekokí kobóngola ndenge ya komónela maye maleká na eleko ya colonisation, bozóngisi ya misálá ya ntóki oyo bayíbá, bobongisi ya makambo ebelé; ekokí kosála eh te maye maleká eleko ya colonisation máyébana penzá penzá na lísitwale ya mbóka Belgique. Masoló ya makási na likambo yango ekokí kosálema káka sókí ndéngé oyo baníngá ya masoló bazómónela makambo endimámí pé sókí makambo nyónso pé maloba nyónso ezólobama likólo ya makambo eleká na eleko ya colonisation endimámí pé. Na tango wáná káka ndé masoló ya sóló sóló póna maye maleká na eleko ya colonisation ekokí kobanda. Esengélí koyéba eh te masoló yangó ezalí likambo ya mayóki ya moto na moto te, ezalí pé likambo ya makanisi ya bakótisi pási bangó mókó té ya kolinga koyókana na lísitwale na bangó mókó. Likambo ezá na motúyá áwa ezalí eh te baníngá nyónso ya masoló bázala na bokeseni te pé makási na bangó na bisíká bango batélémélí épésa kilo na maloba na bísó.